Président Félix Tshisekedi amatisi général Célestin Mbala Munsense mpete mpe atiki ye na ebonga ya mokambi ya mampinga ya FARDC.
Nzoto ya Etienne Tshisekedi ekonzonga le 30 mai mpe ekundami le 1er juin. Na Angola, Jonas Savimbi nde akundami le 1er juin. Bozeli ya bato epayi na Premier ministre ya sika Ilunga. Mokambi ya batomboki Nyatura awei na Nord-Kivu. Bakimi bitumba babandi kozuwa lisungi na Minembwe na Sud-Kivu.
Nzonto ya nkondo Etienne Tshisekedi mokambi ya kala ya UDPS lingomba ya mokonzi ya mboka ya lelo Félix Tshisekedi mpe tata wa ye, ekoki kozongisama na Kinshasa le 30 mai, kolanda bakonzi ya ekolo mpe libota na ye.
Nzoto ya nkondo Jonas Savimbi, mokambi ya kala ya batomboki ya lingomba Unita, ekokundama le 1er juin, eyebisi bakonzi ya Angola na baye ya lisanga na ye.
Sylvestre Ilunga Ilunkamba aponami lokola Premier ministre nsima ya kotatabana ya boyokani ya FCC, lingomba ya mokonzi ya Kala, na #CACH, liye ya Félix Tshisekedi, mokonzi ya sika.
Président Félix Tshisekedi aponi Sylvestre Ilunga Ilunkamba lokola Premier ministre.
Président Felix Tshisekedi aponi M. Sylvestre Ilunga lokola Premier ministre.
Premier ministre Burno Tshibala atiki epayi ya président Félix Thisesekedi mokanda ya bosili mosala na ye.
Molobeli ya gouvernement ya kala mpe député ya Sankuru Lambert Mende atikami nsima na bokangemi mwa ntango moke na ba pulusu mpe baye ya mampinga.
Ekolo Congo démocratique emonani na misala maye Archimedes Group ezalaki kosala mpo na kotambwisa politiki mpe maponami na mboka nzike na Afrika.
Président Félix Tshisekedi alobi na masolo na ba ambassadeurs mpe ba diplomates ya Union européenne ete Premier ministre amonani.
Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique (RDC), Félix Tshiskedi atiki fololo na monument ya soda ezuwami na rond-point Forescom na Kinshasa.
Symocel esengi etumbu soki CENI ebimisi bilembo te lolenge mobeko mosengi. Maire ya Lubumbashi andimi ete Katumbi ayambama na balandi baye. Lucha esengi na Airtel kolakisa bisika baye bakangaka bato na makasi babombanaka, na Goma. Ba députés provinciaux ya Kinshasa babongoli interpellation, question
Symocel to Synergie des missions d’observation citoyenne des élections esengi ete soki bakonzi ya Commission électorale nationale indépendante (CENI) pasokoli ba résultats ya maponami lolenge mobeko esengi te, bakangema. Misala miye ya kotala maponami mibisi lelo rapport na yango ya suka ya maponami
Moïse Katumbi alobi akozonga kosala moto moko te mabe. Ayanolaki na mituna ya bapanzi sango ya diaspora Congolaise mardi na Bruxelles.
Président Félix Tshisekedi akoyamba ministre ya mambi ya bapaya ya ekolo France, Jean-Yves Le Drian o’mokolo ya le 20 mai, eyebisi nzinganzgina ya mokambi ya diplomatie ya mboka mona.
Mampinga mpe bato ya bokengi ya Rwanda mpe ya Ouganda batondisami na ndelo kati na bamboka babale baye, eyebisi bavandi na bisika biye.
Bakimi bitumba na mboka Soudan du Sud bazali kokoba kokota na RDC, eyebisi mokambi ya HCR.
Basoda ya mampinga ya Angola bazali koluka babundi ya FLEC ya Cabinda na Kongo central. Mokambi ya Assemblée provinciale alingi kotinda bakambi ya DGRK na bazuzi. Litomba nini ya pont (gbagba) kati na Kinshasa na Brazzaville ? Bayike balingi liboso libongo ya Banana litongama.
Moto moko akufi na masasi mawutaki na baye bamonani lokola ba soda ya mampinga ya Angola, o’mokolo mwa lundi na secteur ya Kakongo, na Lukula, na Kongo central, elobi Chef ya secteur ya Kakongo, Nduma Nkungu.
Voir plus