Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bruno Tshibala atiki mokanda ya botiki mosala


Premier ministre Bruno Tshibala na bokutani ya ba institutions na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, le 18 mars 2019. (Présidence RDC)
Premier ministre Bruno Tshibala na bokutani ya ba institutions na Cité de l'Union africaine, Kinshasa, le 18 mars 2019. (Présidence RDC)

Premier ministre Burno Tshibala atiki epayi ya président Félix Thisesekedi mokanda ya bosili mosala na ye.

Na bimi "moto likolo… Nazali na sengo mingi mpo ete nakokisi misala mipesamelaki ngayi. Objectif na biso ezalaka tosala ete ekolo na biso ekoma mboka oyo etombwami na mibu mibale. Nakokaki kosala yango te. Yangon de nazali koyoka mpasi na motema," elobi Bruno Tsibala na bapanzi sango.

"Nawuti kokutana na mokonzi ya mboka na kolanda ndenge makambo mazali kokende malamu na botiyami ya ba institutions mabimi na misala ya maponami. Etini ya kotiya ba institutions ya sika mpe bakambi bya yango elakisi suka ya malamu ya cycle electoral eye ezali na litomba koleka na gouvernement eye na kambaki. Yango wana na kanisi ete ntango ekoki mpo na kopesa na président mpe mokambi ye ekolo démission na ngayi mpe ya gouvernement na ngayi mobimba na ntina ya kopesa nzela ya kosilisa makombo maye na botiyami ya gouvernement ya sika," abakisi Bruno Tshibala na bapanzi sango.

O'mokolo ya mposo, président Félix Tshisekedi aloboki na masolo na ba ambassadeurs mpe ba diplomates ya Union européenne ete Premier ministre amonani.

M. Tshisedeki ayebisaki ba ntoma ya UE ete "molinga ya pembe emamonani" mpo etali masolo ya kopona, ekomi Kasongo Mwema Yamba Y’amba, molobeli ya mokambi ya ekolo, na compte Twitter na ye.

XS
SM
MD
LG