Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Nzoto ya Etienne Tshisekedi ekonzonga le 30 mai


Nzonto ya nkondo Etienne Tshisekedi mokambi ya kala ya UDPS na Belgique, le 5 février 2017.
Nzonto ya nkondo Etienne Tshisekedi mokambi ya kala ya UDPS na Belgique, le 5 février 2017.

Nzonto ya nkondo Etienne Tshisekedi mokambi ya kala ya UDPS lingomba ya mokonzi ya mboka ya lelo Félix Tshisekedi mpe tata wa ye, ekoki kozongisama na Kinshasa le 30 mai, kolanda bakonzi ya ekolo mpe libota na ye.

Ministere ya mambi ya bapaya ebimisi linaka mpe etindi nkasa ya bobengisi na bakonzi ya bikolo ya babaya ebele.

Kolanda linaka lyango, nzoto ya Tshisekedi ekokoma na Kinshasa le 30 mai mpe ekotiya ya na Stade des Martyres.

Milulu ya bokundi nkondo Tshisekedi nde misalami le 1er juin na N’Sele, bisala lilita lya ye litongami.

Mgr Gerard Mulumba ndeko ya mowei mpe andimi linaka liye.

Etienne Tshisekedi awaki na lopitalo na Bruxelles (Belgique) le 1er février 2017. Nzoto na ye ebombana kuna banda ntango wana.

XS
SM
MD
LG