Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba, ye nde nani?


Premier ministre ya sika Sylvestre Ilunga Ilunkamba na masolo na président Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 20 mai 2019. (Twitter/Présidence de la RDC)
Premier ministre ya sika Sylvestre Ilunga Ilunkamba na masolo na président Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 20 mai 2019. (Twitter/Présidence de la RDC)

Sylvestre Ilunga Ilunkamba aponami lokola Premier ministre nsima ya kotatabana ya boyokani ya FCC, lingomba ya mokonzi ya Kala, na #CACH, liye ya Félix Tshisekedi, mokonzi ya sika.

Mwana mboka Ilunga Ilunkamba aponami na mokonzi ya kala Joseph Kabila. Apesi ye losako na lisikulu na ye ya yambo. Kasi andimami mpe atiyami na mosala na président Félix Tshisekedi.

Abotama le 28 mars1947 mpe azali professeur en sciences économiques appliquées ya Université ya Kinshasa.

Azalaki mbala mibale ministre ya Plan mpe ya Finances, mpe mbala minei vice-ministre.
Yambo ya boponami na ye azalaki directeur général ya Société national des chemins de fer.

"Nazali kotala boponami na ngayi lokola mokumba monene na ngonga oyo ya litomba ya lisolo ya ekolo na biso mpe nazwi elaka yakotiya makasi na ngayi nyonso mpo na kotambwisa na lolenge ya bomoko boyokani kati ya gouvernement mpe kopesa maboko na bokomisa malamu lolenge ya bomoi ya bana mboka ya Congo na pole mpe na bokambi malamu," elobi Ilunga Ilunkmba nan tango balakisi ye na bapanzi sango.

Ilunga Ilunkamba azalaki mpe secrétaire exécutif ya Copirep (Comité ya pilotage ya ba réformes ya ba entreprises ya portefeuille ya l’Etat), banda 2003 ti 2004.

XS
SM
MD
LG