Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Sylverte Ilunga, Premier ministre


Premier ministre ya sika Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na président Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 20 mai 2019. (Twitter/Présidence de la RDC)
Premier ministre ya sika Sylvestre Ilunga Ilunkamba na bokutani na président Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 20 mai 2019. (Twitter/Présidence de la RDC)

Président Felix Tshisekedi aponi M. Sylvestre Ilunga lokola Premier ministre.

Ilunga Ilunkmba alobi akosala nionso mpo coalition ya gouvernement ekende malamu mpe mpo bolamu ya bana mboka.

"Nazali kotala boponami na ngayi lokola mokumba monene na ngonga oyo ya litomba ya lisolo ya ekolo na biso mpe nazwi elaka yakotiya makasi na ngayi nyonso mpo na kotambwisa na lolenge ya bomoko boyokani kati ya gouvernement mpe kopesa maboko na bokomisa malamu lolenge ya bomoi ya bana mboka ya Congo na pole mpe na bokambi malamu," eyanoli mwana mboka Ilunga na motuna ya mopanzi sango moko.

Sylvestre Ilunga azali professeur ya sciences économiques appliquées ya Université ya Kinshasa.

Azalaki mbala, mibale ministre ya Plan mpe ya Finances, mbala minei vice-ministre.

Yambo ya boponami na ye azalaki directeur général ya Société national des chemins de fer.

XS
SM
MD
LG