Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mende atikami nsima ya bokangemi mwa ntango


Lambert Mende na studio ya VOA, Washington, le 31 janvier 2018
Lambert Mende na studio ya VOA, Washington, le 31 janvier 2018

Molobeli ya gouvernement ya kala mpe député ya Sankuru Lambert Mende atikami nsima na bokangemi mwa ntango moke na ba pulusu mpe baye ya mampinga.

Lambert Mende andimi ete akangamaki mpe atikami. Alobi ete baye ya police mpe mampinga baye bakangaki ye, batingaki ye mpe banyokolaki ye mwa moke yambo ya botiki ye.

Alobi ete ezalaki mpo na diamant monene ya 87 carats eye ba timoli ya circonscription na ye ya Sankuru babemi na Kinshasa kasi bavandi na ndako na ye.

"Nayambaki bango na ndako na ngai. Yango nde mbeba eye Basile Olongo (ministre ya Intérieur) azali kopamela ngai. Alingaki ete bamemela ye diamant eye mpo ye azali vice-Premier ministre mpe ministre ya Intérieur. Yango nde ntina ya nsoni oyo bayokisi ngai," elimboli Mende.

Sango ya bokangami ya M. Mende epasamaki yambo na Kalev Mutond mokambi ya kala ya ANR (Agence nationale ya renseignements). M. Mutond ayebisaki na bapanzi sango ete ezalaki na mitindo ya ministre intérimaire ya mambi ya Kati na mboka, Basile Olongo, nde bokangami boye bosalamakai.

Ministre ya mambi ya makoki ya bomoto azalaki koyanola te na telephone kasi moko ya nzinganzinga wa ye asengaki na bapanzi sango batuna na police.

XS
SM
MD
LG