Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Facebook epekisi compagnie ya Israël moko etambwisaka politiki na Afrika


Facebook ekangi compte oyo ezalaki kotindika nzela ya maponami na Afrique, le 16 mai 2019. (Facebook Newsroom)
Facebook ekangi compte oyo ezalaki kotindika nzela ya maponami na Afrique, le 16 mai 2019. (Facebook Newsroom)

Ekolo Congo démocratique emonani na misala maye Archimedes Group ezalaki kosala mpo na kotambwisa politiki mpe maponami na mboka nzike na Afrika.

265 comptes ya Facebook mpe Instagram nde ekangami. Kati na yango ba pages Facebook ya lokuta, ba groupes na ba évènements.

Mokambi ya bokengi (responsable ya cybersécurité ya Facebook), Nathaniel Gleicher, akomi na article moko ete misala maye mikangami mimonisaki ezaleli ya malamu te. Wana nde lolenge ya Facebook kolaba ete bamikotisa na maponami mpe basalelaki mayele ya kozimbisa (manipuler) politiki na kosalelaka sango.

Facebook a fermé ce compte utilisé pour influencer l'élection en Afrique, le 16 mai 2019. (Facebook Newsroom)
Facebook a fermé ce compte utilisé pour influencer l'élection en Afrique, le 16 mai 2019. (Facebook Newsroom)

Na ndakisa na ye, Mme Gleicher abimisi poste ya Facebook moko ezali koloba likambo ya maponami na RDC. Alakisi compte moko na nkombo ya “La RDC secret“, eye esili kokangma mpe ekomoma lisusu te na bato banso.

Poste yango ezali kopamela Martin Fayulu mpe koloba na ye andima ete alolngaki te liboso ya mokonzi Felix Tshisekedi.

Misala maye makangi mizalaki kosalame mingi mpenza na Afrique ya Ouest. Kasi etalaki mpe basaleli biike ya Facebook na Angola mpe na Tunisie.

XS
SM
MD
LG