Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basoda ya Angola bamonani na Kongo central


Ba soda ya Angola na Musée national ya mampinga ya Angola, Luanda, le 17 septembre 2018.
Ba soda ya Angola na Musée national ya mampinga ya Angola, Luanda, le 17 septembre 2018.

Moto moko akufi na masasi mawutaki na baye bamonani lokola ba soda ya mampinga ya Angola, o’mokolo mwa lundi na secteur ya Kakongo, na Lukula, na Kongo central, elobi Chef ya secteur ya Kakongo, Nduma Nkungu.

Bavandi ya esika eye balobi ete mampinga ya ekolo Angola bazali kokota na Congo démocratique banda mposo mibale mpo na koluka ba séparatistes to baye balingi bokabwani ya enclave ya Cabinda.

"Ezali basoda ya Angola nde bavandi na zamba ya mboka minei. Babetaki elenge moko masasi mpe awaki mpo bakanisaki ete azalaki moko ya baye ya Front de libération ya enclave ya Cabinda (Flec). Tomoni bango na zamba na minduki mpe sokoto ya ekolo Angola," eyanoli na VOA Lingala Antoine Tshimbuka, moko ya baye ya société civile na mboka Bambi, na Kakongo pene na ndelo na Angola.

Nduma Nkungu mpe apesi nse sango moko wana na AFP.

Bango babale balobi ete mampinga ya Angola mazali koluka babundi ya FLEC.

Kasi mokambi ya Société civile ya territoire ya Lukula, Firmin Manga Baku ayebisi VOA Lingala ete azwaki mpe sango ya bomonisami ya mampinga ya Angola na Lukula, kasi na ndelo na mboka na bango.

"Sango tozwaki koleka mposo mibale ezalaki ete basoda ya Angola bamonisaki na mabele ya Lukula kasi balobaki ete babungaki nzela mpe basalaki mabe na moto moko te. Kutu, basalisaki moto moko azalaki na mpasi ya liwa. Kasi oyo etikali koleka banda ntango wana toyebi te," elobi mwana mboka Manga Baku, oyo azwami na Lukula, kasi na 180 kms ya ndelo na Angola.

Na ngambo na ye, chef ya secteur ya Kakongo, Nduma Nkungu, alobi ete gouvernement provincial etindaki bato kosala bolukiluki.

Kasi bakonzi ya etuka balingi naino te koloba likambo liye ntango bazwaki motuna ya bapanzi sango.

XS
SM
MD
LG