Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda na Ouganda bazali kobendana


Président Paul Kagame ya Rwanda, na gauche, na mokokani wa ye ya Ouganda, Yoweri Museveni na Dar es Salaam, 5 novembre 2015. REUTERS
Président Paul Kagame ya Rwanda, na gauche, na mokokani wa ye ya Ouganda, Yoweri Museveni na Dar es Salaam, 5 novembre 2015. REUTERS

Mampinga mpe bato ya bokengi ya Rwanda mpe ya Ouganda batondisami na ndelo kati na bamboka babale baye, eyebisi bavandi na bisika biye.

Bakumbi mituka minene mpe bato na mombongo bakimi bisika biye, kolanda sango epesami na Agence France presse.

Rwanda ekangaki ndelo na yango banda sanza ya mibale.

Kasi matata kati na Rwanda na Ouganda mazali komata nse komata. Mboka mibale miye mizali komifunda mpo komikengela to konongana moko na mosusu (to komiespionner, na Français).

Ndelo kati mboka mibale maye ekomi kokengelama na ekenge mingi.

Na sanza ya misatu moleki, Rwanda efundaki Ouganda na kokanga makasi bana mboka ya Rwanda bayike mpe kopesa maboko na batomboki balingi kokweyisa bokonzi na Paul Kagame ya Rwanda.

Président Yoweri Musevi ya Ouganda andimaki ete akutanaki na batomboki ya Rwanda kasi apesaki bango maboko te.

Mpo na Museveni bana ya Rwanda baye bakangamaki bazali nde ba espions to banongi.

Paul Kagame apamelaki yango ntango ya 25e anniversaire ya génocide na Rwanda, sanza moleki.

XS
SM
MD
LG