Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi alobi Premier ministre azwami


Président Félix Tshisekedi na milulu ya bokanisi basoda na mémorial ya soda ya Congo démocratique, Kinshasa, le 17 mai 2019, (Facebook/Présidence de la RDC)
Président Félix Tshisekedi na milulu ya bokanisi basoda na mémorial ya soda ya Congo démocratique, Kinshasa, le 17 mai 2019, (Facebook/Présidence de la RDC)

Président Félix Tshisekedi alobi na masolo na ba ambassadeurs mpe ba diplomates ya Union européenne ete Premier ministre amonani.

M. Tshisedeki ayebisi ba ntoma ya UE ete "molinga ya pembe emamonani" mpo etali masolo ya kopona, ekomi Kasongo Mwema Yamba Y’amba, molobeli ya mokambi ya ekolo, na compte Twitter na ye.

Mpo na M. Kasongo Mwema : "Ba ntoma basosoli : ‘Premier ministre azwami’ ", alobi na makomi mya ye.

"Tokutani mposo ekoya," eyebisi molobeli ya mwana mboka Tshisekedi.

Mokonzi Tshisekedi ayambaki 15 ambassadeurs ya UE elongo na oyo ya Canada, eyebisi présidence ya ekolo Congo démocratique.

XS
SM
MD
LG