Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Katumbi alobi alimbisi mpe azozonga kosala mabe na moto te


Moise Katumbi na bokutani na bapanzi sango na Paris, le 16 juin 2017.
Moise Katumbi na bokutani na bapanzi sango na Paris, le 16 juin 2017.

Moïse Katumbi alobi akozonga kosala moto moko te mabe. Ayanolaki na mituna ya bapanzi sango ya diaspora Congolaise mardi na Bruxelles.

Mokambi ya lingomba Lamuka mpo na sanza misato mizali kokende mpe motambwisi ya lisanga Ensemble andimi ete akokita na Congo démocratique le 20 mai, na Lubumbashi, na etuka ya Haut-Katanga.

"Nazali kozonga, ezali mpo ya boyokani na ekolo, mpo na bomoko ya mboka na biso. Nazali kokende kuna te mpo na bundisa moto moko to mosusu," elobi mwana mboka Katumbi.

Alobi alimbisi baye banso basalaki ye mabe mpo azali moklisto.

"Oyo nyonso asalaki mabe, esili eleki," ayebisi.

Na motuna etali coordonateur ya opposition, M. Katumbi alobi ete bakosolola "na baninga na ye ya opposition lokola bana mibali ya mikolo" ntango likambo yango ekoya mpo bazali na koleka ba députés 66.

Alobi atikali na opposition elongo na Jean-Bemba, Martin Fayulu, Freddy Matungulu, Mbusa Nyamwisi mpe Adoplhe Muzito. Akosala safari na mboka mobimba na bozongi na ye mpo na kopesa matondi na bana ya Congo mpe mpo na kosunga mpo na ntombwa, bokengi, bokono ya Ebola mpe kobunda mpo na Buku likonzi mpe Mboka ya mibeko.

"Soki tobyaki 3e faux penalty, boyebaka ete tokondima mpe te 4e faux penalty," akebisi.

M. Katumbi akimaki na exil na 2016 nsima na bofundami na makambo ebele. Kati yango, kobotola ndako ya bato, kozuwa na mosala ba nyangalakata ya mboka misusu.

Atelemelaki mandat ya misato ya Joseph Kabila.

XS
SM
MD
LG