Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jonas Savimbi akokundama le 1er juin


Jonas Savimbi na Umtata, Cap-Oriental, Afrique du Sud. le 08 janvier 1997.
Jonas Savimbi na Umtata, Cap-Oriental, Afrique du Sud. le 08 janvier 1997.

Nzoto ya nkondo Jonas Savimbi, mokambi ya kala ya batomboki ya lingomba Unita, ekokundama le 1er juin, eyebisi bakonzi ya Angola na baye ya lisanga na ye.

Endimami ete nzoto eye ekundamaka le 11 février 2002 na Luena, nsima ya bitumba na mampinga ya Angola ezali ya Jonas Savimpi, kolanda ba tests ya ADN, elobi ministre d’Etat ya mambi ya bokengi ya ekolo Angola mpe mokambia ya bokengi ya président Joao Lourenço ya Angola, Pedro Sebastiao.

Ba tests byango bisalamaki na ba laboratoires na Afrique du Sud, na Argentine, na Portugal mpe na Angola.

Liwa ya Jonas Savimpi esukisaki bitumba bizalaki kongala wuta Angola ezuwaki lipanda na 1975.

XS
SM
MD
LG