Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi atiki fololo na monument ya soda


Mokonzi Félix Tshisekedi apesi losako nsima na botiki fololo na monument ya soda ya Congo démocratique, na rond-point Forescom, Kinshasa, le 17 mai 2019. (Facebook/Présidence de la RDC)
Mokonzi Félix Tshisekedi apesi losako nsima na botiki fololo na monument ya soda ya Congo démocratique, na rond-point Forescom, Kinshasa, le 17 mai 2019. (Facebook/Présidence de la RDC)

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique (RDC), Félix Tshiskedi atiki fololo na monument ya soda ezuwami na rond-point Forescom na Kinshasa.

Le 17 mai, Congo démocratique ezali kokanisa ba soda baye bakufa na bintumba.

Nzoka nde mokolo yango mozali mpe moye AFDL ya Laurent Désiré ekotaki na Kinshasa, le 17 mai 1997, mpe ekwayisaki bokonzi ya Mobutu Sese Seko nsima na mibu 32 ya bokonzi ya makasi.

Mpo na mokolo moye, président Tshiskedi apesi na ba soda 275 mosolo ya bosilisi to ya suka ya mosala na bango. Bamimonisaki na milulu miye na ba officiers mitano.

Ministre intérimaire ya Mampinga mpe ya Bobateli ekolo, Michel Bongongo akundoli na milulu yango ete ba soda ya Congo démocratique nde bazaki nde bakengeli ya bomoko ya ekolo liboso ya bitumba ya molongo, botomboki mpe basimba minduki nyonso.

Mokolo mwango ezali mokolo ya bopemi to loyi, bato bavandi na bandako kasi bakofutama.

Laurent-Désiré Kabila amikomisaki mokonzi o'mokolo yango, le 17 mai 1997, kasi bamobomaki na kiti na ye na masasi le 16 janvier 2001.

XS
SM
MD
LG