Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

OMS elobi Ebola na RDC ezali "urgence" ya molongo


Basali ya bokolongono na mboka Mirami, pene na ndelo kati na Congo démocratique mpe Ouganda, 14 juin 2019.
Basali ya bokolongono na mboka Mirami, pene na ndelo kati na Congo démocratique mpe Ouganda, 14 juin 2019.

Misala ya bokolongono ya molongo (OMS) milobi ete Ebola na RDC ezali likambo molongo mombimba mosengele kolunga kosilisa na lombango to "urgence" sanitaire mondiale.

OMS eloba likambo ya ndenge oyo kaka mbala minei, mpo na grippe H1N1 na 2009, mpo na bukabuka na 2014, mpo na Ebola eye ebomaki bato 11.300 na 2014 na Liberia, Guinée mpe Sierra Leone, mpe mpo na virus Zika.

OMS ezuwi mokano liye nsima na moto moko kozuwama na bokono ya Ebola na Goma. Kasi bokono liye bokatisaki ngambo ya Ouganda esika bato mibale bamonanaki na Ebola mpe na Rwanda, moto moko.

Pr. Robert Steffen, mokambi ya comité ya urgence ya OMS asengi ete mboka esusu ezuwa te meko ya koboya kosala mombongo na RDC to kopekisa ban aya Congo démocratique kokota na mabele na bango.Ebola.

Bato 1.700 basili kokufa na EBola banda sanza ya mwambe ya 2018 na RDC.

XS
SM
MD
LG