Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mokambi ya Sankuru ya sika J. Mukumadi akoti CACH


Joseph-Stéphane Mukumadi (G) mokambi amponami na Sankuru, na bokutani na motambwisi ya misala ya mokonzi Félix Tshisekdi, Vital Kamerhe, na Palais de nationa, Kinshasa, 22 juillet 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Joseph-Stéphane Mukumadi (G) mokambi amponami na Sankuru, na bokutani na motambwisi ya misala ya mokonzi Félix Tshisekdi, Vital Kamerhe, na Palais de nationa, Kinshasa, 22 juillet 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Joseph-Stéphane Mukumadi oyo aponamaki mokambi ya Sankuru nsima na momekano ya mokolo ya mposo moleki na Lambert Mende ya FCC (ya kokonzi ya kala Joseph Kabila), asakoli ete akoti na CACH, lingomba liye lizali na nse ya président Félix Tshisekedi.

Mokambi ya sika ya Sankuru akutani lundi na motambwisi mosala ya presidence, Vital Kamerhe.

Akendeki kopesa losako na mokonzi Félix Tshisekedi mpo na makasi asalaki mpo na kopesa eyano na nkwokoso ya politiki ezalaki konginda na etuka ya Sankuru yambo na maponami.

Nzonkande, Lambert Mende oyo akweyisamaki na maponami ya mokolo ya mposo moleki afundaki UDPS mpe CACH, mangomba ya M. Tshisekedi, na kozala na nsima ya candidature ya Mukumadi oyo amibimisaki na momekano moye lokala indépendant (moto azanga lisanga ya politiki).

M. Mende apamelaki kaniaka mpe alobaki ete UDPS nde esalaki yango.

"Indépendant ya wapi? Ezali UDPS! Na sukisi na kolba ete kaniaka nde ezali kovandisama na ekolo eye…," elobi M. Mende.

XS
SM
MD
LG