Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Washington elobi ebebisi drone ya Iran kasi Téhٞéran ewangani


USS Boxer (LHD-4) na mbu ya Arabia, 16 juillet 2019.
USS Boxer (LHD-4) na mbu ya Arabia, 16 juillet 2019.

USA esakoli ete ezali na bilembo bilakisi ete ebebisi drone ya Iran eye epusanaki pene na masuwa ya nitumba na yango kasi Téhéran eboyi yango.

Président ya Ameriki, Donald Trump asakoli jeudi ete masuwa ya bitumba ya ekolo na ye, USS Boxer, mobebisaki drone (mpepo motambolaka na bozangi pilote) ya Iran eye epusaki mingi pene na yango.

"Tozali na bilembo, drone na bango epusanaki mingi pene na masuwa na biso. Soki ba drones epusani mingi, tokoboma yango," elobi moto na bakonzi ya Amerika oyo aboyi kopesa nkombo na ye na AFP.

Pentangone to ministère ya Défense ya Ameriki endimaki naino te kino vendredi na nsima na nzanga ete bilili biye bilakisa bobebisi ya drone eye bizali.

Molobeli ya mampinga ya Iran, général ya brigade Abdolfazi Shékarchi ayanoli ete ezali likambo ya bolema mpe lizangi loboko.

XS
SM
MD
LG