Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Katumbi ayambami na Kolwezi


Moise Katumbi apepi loboko na bokomi na ye na Lubumbashi, 20 mai 2019
Moise Katumbi apepi loboko na bokomi na ye na Lubumbashi, 20 mai 2019

Moïse Katumbi, mokambi ya lingomba Lamuka mpe ya Ensemble, akomi na Kolwezi, na etuka ya Lualaba na safari to mobembo ya kati ya mboka azali kosala.

Ayambamaki na bitukuku balandi mpe alobi na lisikulu na ye na Cité Manika ete akotikala na opposition na baninga baye kasi akosunga mokonzi ya ekolo Félix Tshisekedi na kopesaka makanisi masengeli.

Moïse Katumbi asengi mpe lisusu ete bakonzi ya etuka ya Lualaba bazongisela batimoli ya makele na maboko mabele maye babotoli bango.

Lobi loleki azalaki na Kalemie na etuka ya Tanganyika.

Yambo na bokomi na ye na Lualaba, mondelo-mboka ya etuka eye apekisaki milulu manso ya politiki mpe aboyaki kondima bosenga ya baye ya Lamuka ya koyamba M. Katumbi.

XS
SM
MD
LG