Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Leopards champions d’Afrique ya basketball ya AfroCan


Equipe nationale ya basketball na RDC nsima na elonga na bango liboso ya Angola na AfroCan, na Bamako, Mali, 25 juillet 2019. (Facebook/Léopards Basket)
Equipe nationale ya basketball na RDC nsima na elonga na bango liboso ya Angola na AfroCan, na Bamako, Mali, 25 juillet 2019. (Facebook/Léopards Basket)

Equipe nationale ya Congo démocratique elongi championnat ya Afrika ya basketball AfroCan ya basani babetaka na continent, na finale na Kenya 82-61 na Bamako, Mali epayi wapi momekano moye mobetami.

Bilenge ya RDC babandi lisano malamu mpeza. Bolonga quarter ya liboso 29-18.

Kasi belmbisaki mwa moke na quarter ya mibale. Kenya elekaki na 36-37, Mpe kakendaki mi-temps boye.

Na quarter ya misato, bana ya Congo babimisaki boyebi na bango. Batikaki Kenya mosika na 65-47.

Mpe na quarter ya suka, ecart ekomaki kino koleka 20 pts. Balongi 82-61.

Maxi Onanga Shamba nde mosani ya malamu koleka ya Afrika mobimba. Ailier ya Congo democratique mpe azali kati na basani baleki malamu na championnat oyo.

Equipe ya Mali nde ezuwi keni ya Fair-Play.

Angola nde ezuwi esika ya misato nsima na elonga na yango liboso ya Maroc 88-71.

XS
SM
MD
LG