*Pasteur azuwamaki na Ebola na Goma akkufi *72% ya bana balongi na Exetat na Kinshasa *Ndambo ya AFDC-A ebangani Bahati nsima na FCC *Matata mpo etali bokati zamba na Lokuto, Tshopo *Ba ADF basali bitumba ba Palyata Paida
Moto ya yambo moye azuwami na Ebola na Goma o’mokolo ya eyenga akufi na nzela ya bomemami na ye na Butembo, kolanda bakambi ya misala ya bokolongono.
Bokutani ya bakambi ya FCC (Front commun pour le Congo), lingolmba ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, bosakoli ete bolongoli mpo na libela Modeste Bahati, motambwisi ya AFDC-A (Alliance des forces démocratiques du Congo et allies).
Ministère ya Rwanda ya bokolongono ekebisi baye ya mboka na yango mpo na kokatisa o’ngambo ya Congo démocartique nsima na moto moko komonisama na bokono ya Ebola na Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu.
President Donald Trump andimi vendredi ete basali ya immigration (misala mitali bapaya) mpe ya mpako bakobanda lokuka mpe kokanga na USA na nsuka ya mposo eye, nkoto na bapaya bakota na mboka na ye na bozangi mikanda mpo na kozongisa bango na bikolo na bango.
Président Félix Tshisekedi na bakokani na ye Paul Kagame ya Rwanda, Yoweri Museveni ya Ouganda mpe Joao Lourenço ya Angola, basolalki o’mokolo mwa mitano na Luanda mpo na kimya mpe makambo misusu etali etando ya Afrikaya kati kati.
* FMI ezongeli programme na Congo-Brazzaville *Eyango ya Lamuka na boponami ya Matungulu mpo na BAD *D. Nyakeru na ambassadeur ya USA basololi mpo na basi na RDC *MSF ezali koluka basali na yango misatu *CAN2019, démi-finale
Congo Brazzaville ekozuwa kowuta na Fonds monétaire interantional lisungi ya pene na 450 millions ya ba dollars mpo na mibu misato.
VOA Lingala etunaki moko ya balobeli ya lingomba Lamuka, Chérubin Okende, mpo etali boponami ya Freddy Matungulu, moko ya bakambi ya lingomba liye, mpo na kokamba BAD (Banque africaine de développement). Tolanda eyano na Chérubin Okende.
Prof. Freddy Matungulu Ilankir andimi na motuna ya VOA Lingala ete bulamatari ya Congo démocratique epesi nkombo na ye mpo na kozala mokambi ya BAD (Banque africaine de développement).
Mabongisi ya 'Médecins sans frontières' to Minganga bazanga ndelo na mboka, eyebisi ete ezali kokoba koluka basali ba ye basatu bakangemaki mibu motoba mileki na basimba minduki.
Molakisi elongi ya Union européenne na Congo démocratique, Guillaume Chartrain, apamela polele molebeli ya kala ya bulamatari na bokonzi ya mokambi ya ekolo ya kala Joseph Kabila, Lambert Mende, mpo na kotelemela démocratia.
Modeste Bahati Lukwebo ayanoli na mituna ya VOA Lingala nsima na mokano ya baye ya FCC ya kobimisa ye na lisanga na bango. Andima ete libala na FCC ekufi mpe akoboba kozala candidat mpo na kotambwisa Sénat. Tolanda ye.
Claude Wilfrid Etoka, PDG ya Eco Oil Energie S.A, moko ya ba société ya milona ya nkita mingi na Congo-Brazzaville, asololi na bato ya ntoki (recherches) awa na USA mpo na koluka kotombola milona mpe komema misolo na mboka nsima na mombongo na libanda. Ayanoli na mituna ya VOA Lingala.
Maponami ya mokambi ya etuka ya Sankuru makosalama lobi le 10 juillet, eyebisi CENI, Commission électorale nationale indépendante.
*CPI ekwiyisi Ntaganda *Bokolo ya UA bibandi Zone ya libre-échange ZLEC/AF *Millions mibale mpo na misala ya bolobi mbisi na le Pool, na Congo-#Brazzaville *Lucha epameli botondi ya bato na boloko ya Kangbayi, na Beni *Ba Léopards batiki CAN 2019 *USA champion du monde ya ndembo ya basi
Bikolo ya Union africaine basali o’mokolo mwa eyenga moleki elembo ya bobandi ya misala ya ZLEC (Zonde de libre-échange to etando ya kosombitinya na bonsomi) na bokutani na Niamey, na Niger.
Equipe nationale ya Madagascar esukisi oyo ya RDC na 8e de finales ya CAN 2019 nsima ya ba tirs au but na stade ya Alexandrie na Egypte, 4-2.
Masanga miike ya lingomba Lamuka mamonisi nkanda na mango nsima na ekateli ya suka ya Constitutionnelle mpo etali ba recours ya parlementaires.
*4 juillet, mokolo ya lipanda ya USA *Tshisekedi akozala na Assemblée générale ya UA na Niamey *Campagne ya vaccination ya choléra na etando ya Kasaï *Batomboki babomi lisusu na Djugu *Na Beni, basimba minduki ya UPLC bakitisi bibundeli *Na Léopards bakomi na Alexandrie
Voir plus