Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi azelami na Abuja


Président Félix Tshisekdi na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 25 juillet 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekdi na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 25 juillet 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi azelami o’mokolo ya mitano, le 26 juillet 2019, na Abuja, engumba mokonzi ya Nigeria, mpo na bokutani ya bokeli misala, Forum 2019 Entrepreneuriat.

Bokutani yango bokosalama na Fondation Tony Elumelu banda mokolo ya minei le 26 kino mposo le 27 juillet, eyebisi ndako ya mosala ya mokonzi Tshisekedi.

Bakonzi ya bikolo bisusu mpe bazelami. Lokola Paul Kagame ya Rwanda mpe Macky Sally a Sénégal.

Mokambi ya BAD (Banque africaine ya développement), Akinwumo Adesina, motambwisi ya AfrexinBank), Benedict Oramah mpe mokonzi ya Avon Medical, A. V. Elumelu bakozala mpe wana.

Kolanda présidence ya Congo démocratique, M. Tshisekedi akolobela emoniseli na ye na oyo etali bokeli misala (entrepreunariat).

Bokutani yango bokozala mingi masolo likolo na nkwokoso ya ntango oyo mpo kokela misala na Afrika.

XS
SM
MD
LG