Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ministre ya Santé atiki mosala


Minsitre ya Santé, Dr Oly Ilunga Kalenga, na Mangina, Nord-Kivu, RDC, 2 juillet 2018. (Twitter/Oly il
Minsitre ya Santé, Dr Oly Ilunga Kalenga, na Mangina, Nord-Kivu, RDC, 2 juillet 2018. (Twitter/Oly il

Dr Oly Ilunga, ministre ya mambi ya Bokolongono atiki mosala mikolo mibale nsima na mokano ya president Félix Tshisekedi ya kozuwa bitumba ya Ebola na maboko mpe ya kotiya na esika équipe ba experts ekambami na Dr. Jean-Jacques Muyembe mpo na yango.

Dr. Ilunga alobi ete alongwe mpo aboyi mobulungano mokota na kolanda mokano ya président Tshisekedi.

"Nakolanda mokano na yo ya kozuwa bokambi ya bitumba na bokono ya virus ya Ebola mpe mpo nakoboya mobulungano mokoki kobebisa bitumba moye mokolanda mokano moye, napesi yo mokanda ya botiki misala na ngai ya ministre ya Santé ," ekomi ministre ya Santé Ilunga.

Dr. Ilunga abakisi, na mokanda na ye, ete "lokola na bitumba binso, maziba ya mikano makoki te kozala mingi na kobanga ete mbulungana ekota".

Nzonkande, o’mokolo ya mposo, président Félix Tshisekedi asakolaki na liyebisi ete ye moko nde akokamba bitumba na épidémie ya Ebola.

Bokono boye bosili kobama koleka bato 1.700 banda sanza zomi yango eozali kongala na monyele (Est) ya Congo démocratique.

M. Tshisekedi atieyi Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya INRB (Institut national de recherche biomédicale), oyo ayebani mpo kosunga kosilisa ba épidémies ya Ebola bileka). Mokonzi ya RDC asengi na Dr. Muyembe kosala mbongwana esengeli mpo na kosilisa bokono boye.

Mokambi ya ekolo na misala ya banganga ya boyebi bakutanaki o'mokolo ya mposo na Cité africaine, na Kinshasa. Batalaki ndenge nini makambo mazalaki kosalama na koyebaka ete OMS (Mabongisami ya molongo ya bokolongono) masakoli ete Ebola ezali bosengi ya lombango ya molongo mpo na bokolongono," eyebisi présidence ya Congo démocratique.

XS
SM
MD
LG