Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Katumbi, Fayulu, Muzito na Bazaiba na masolo Lamuka


(G-D) Adolphe Muzito, Martin Fayulu, Moïse Katumbi na Eve Bazaiba na bokutani ya Lamuka ma Lubumbashi, Haut-Katanga, 30 juillet 2019. (Lamuka)
(G-D) Adolphe Muzito, Martin Fayulu, Moïse Katumbi na Eve Bazaiba na bokutani ya Lamuka ma Lubumbashi, Haut-Katanga, 30 juillet 2019. (Lamuka)

Bakambi ya Lamuka bazali na masolo banda mardi na ntongo na résidence ya Moïse Katumbi na Lubumbashi.

Correspondant ya VOA Lingala ayebisi ete Martin Fayulu, Adolphe Muzito, Eve Bazaiba elongo na Moïse bazali na kinzozi (huis clos).

Bato basusu ya lingomba liye bazali kozela libanda elongo na bapanzi sango, eyebisi correspondant ya VOA Lingala.

Chérubin Okende, molebeli ya lingomba liyse, asakoli na liyebisi ete bakambi ya Lamuka bakobisima mokanda ya suka na nsima ya bokutani yango.

Ekozala mpe na bobopesani ya bokonzi kati na Moïse Katumbi na Jean-Pierre Bemba, oyo akokoma motambwisi ya sika ya lingomba lye.

M. Katumbi nde akambaki moto ya yambo mpo na sanza misato misala ya Lamuka.

M. Bemba azali na Lubumbashi te. Mpepo na ye esalaki mwa nkwokoso, kolanda baye ya MLC. Kasi atindaki kala mokonzi ya MLC (Mouvement pour la libération du Congo), Eve Bazaiba na bokutani ya Lubumbashi.

XS
SM
MD
LG