Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Fayulu, Muzito na Bazaiba na Lubumbashi mpo na bokutani ya Lamuka


Moïse Katumbi na Martin Fayulu bayambani na libanda ya mpepo ya Luano, Lubumbashi, 29 juillet 2019.
Moïse Katumbi na Martin Fayulu bayambani na libanda ya mpepo ya Luano, Lubumbashi, 29 juillet 2019.

Kolanda maloba ya baye ya MLC, Jean-Pierre Bemba, mokambi ya lisangana na bango akozala te na bokutani ya Lamuka mpo mpepo na ye ezali na likama.

Martin Fayulu na Adolphe Muzito bakomi na Lubumbashi mpo na bokutani ya bakambi ya lingomba Lamuka, eyebisi correspondant ya VOA Lingala na engumba mokonzi ya Haut-Katanga.

Nzokande Jean-Pierre Bemba akozala te na bokutani boye kasi atindi Eve Bazaiba na esika na ye.

Baye nzinga nzinga na Bemba balobi ete Jet privé na ye ezali na mwa nkwokoso.

Na bokomi na bango, MM Fayulu, Muzito mpe Mme Baizaba, bayambamaki na Moïse Katumbi ye moko.

Bokutani yango bokotala ndenge nini lingomba na bango lizali kotambola mpe nzela nini lisengeli lizuwa.

Nzonkande, na mobembo na ye asalaki na Kolwezi mpe Kalemie mpsoso moleki, Moïse Katumbi asakolaki ete akotikala na opposition kasi akopesa makanisi maye na mokonzi ya ekolo soki bosenge bozali.

XS
SM
MD
LG