Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moto ya mibale amonanaki na Ebola na Goma akufi


Basali ya kolongono bamemi nzoto ya mowei na Ebola na Beni, Congo, 14 juillet 2019. (AP Photo/Jerome Delay)
Basali ya kolongono bamemi nzoto ya mowei na Ebola na Beni, Congo, 14 juillet 2019. (AP Photo/Jerome Delay)

Moto ya mibale oyo amonanaki na Ebola na Goma akufi, endimi mokambi atiyami mpo na bitumba na bokono boye na Congo démocrarique, Dr. Jean-Jacques Muyembe.

"Mokoni wana amonanki na Ebola akufi solo na Goma. Miiko (mesures) minso mizwami mpo na kata nzela ya bopanzi bokono bwango na bato mingi," elobi Dr. Muyembe.

"Mokoni yango akomaki na Centre ya traitemenet na mokolo ya 11 ya bokono bwa ye. Elikya ezalaki te mpo bokono yango ekomaki mpenza makasi. Akufi na butu ya mardi na mercredi," eyebisi ngambo na ye Dr. Aruna Abedi, mokambi ya bitumba ya bokono boye na etuka ya Nord-Kivu.

Bokonzi ya bokolongono basengi na bavandi batika kobomba baye bamonisami na bilembo ya Ebola.

Moto yango azali moto ya mibale ya komonisama na bokono boye na enguma mokonzi ya Nord-Kivu. Awutaki pene na Bunia, na Ituri.

Bato 1.803 basili kokufa na bokono boye banda ezali kongala na Nord-Kivu pene na mobu moko moleki.

XS
SM
MD
LG