Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Léopards ya basi ya basketball na groupe C ya Afrobasket


Ba sani ya basi ya ba Léopards séniors ya RDC, photo ebimisa le 26 juiller 2019. (Facebook/Léopards Basket)
Ba sani ya basi ya ba Léopards séniors ya RDC, photo ebimisa le 26 juiller 2019. (Facebook/Léopards Basket)

Ba Léopards séniors ya basi bazali na groupe C ya phase finale ya Afrobasket, championnat ya basketball eye ekobetama banda le 10 kino le 18 août 2019 na Dakar, na Sénégal.

Tirage au sort, to mpe bobendi nkombo ya momekano moye, esalamaki lundi na Dakar.

RDC ezali bongo na groupe C na Mali mpe Angola.

Groupe A ezali na Sénégal, Egypte mpe Côte d’Ivoire.

Nigeria, Cameroun mpe Tunisie bazali na groupe B.

Mozambique, Cap Vert mpe Kenya bazali na groupe D.

Tokundola ete, ba Léopards sénior ya mibali babimi balongi o’mokolo ya mposo moleki ya AfroCan 2019, momekano ya yambo ya basketball mpo na basani babetaka na continent ya Afrika.

XS
SM
MD
LG