Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Greffier ya Cour ya cassation abwakisi appel ya Dr. Oly Ilunga (Avocats)


Dr. Oly Ilunga, ministre ya kala ya bokolongo, na Kinshasa, 20 mai 2018.
Dr. Oly Ilunga, ministre ya kala ya bokolongo, na Kinshasa, 20 mai 2018.

Ba avocats ya Dr. Oly Ilunga, ministre ya kala ya bokolongono, bapameli bgreffier ya Cour ya cassation mpo na abwkisi bosenga na bango ya koboya mokona mokweyisa client na bango na etumbu ya mibu mitano ya misala makasi mpo na kanyaka.

Ba avocats ya Dr. Ilunga bakamwe ete ba greffier amizongisi nsima, nsima na kondima mokanda bakotisaki mpe alobi andimaki yango yambo "na libunga".

"Greffier akoki te kozwa mokano ya kondima to ya koboya recours to koloba soki yango ezali na litomba te," ekomi Me Guy Kabeya na Me Bernard Maingain, basambeli ba Dr. Ilunga na mokanda moye VOa Lingala emonaki.

Ba avocats baye balobi balandaki maye manso masengeli mpo na kokotisa mokanda kasi bakamwe ndenge yango ebwakisami.

Bakundoli ete bofundami mpe bokangami ya Dr. Ilunga bosalamaki na kobuka mibeko mya mboka.

Ba avocats ya Dr. Ilunga balobi lisusu ete eloko moko te elakisi ete kaniaka eye Dr. Ilunga afundama na yango ezali solo. Bapameli misala ya bosembo mpo bandima te bilembo binso Dr. Ilunga apesa bango mpo kolakisa ete ayiba te.

Bakundelo lisusu ete etumbu ezalaka ya moto asala mbeba kasi ya bato basusu te.

Dr. Ilunga akelamaki mibu mitano mya misala makasi mpo na kopengwisa koleka 4 millions $ mipesamaki na basungi mpo na bokono bwa Ebola.

XS
SM
MD
LG