Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COVID19 : Tanzanie epesi etumbu na mokambi ya loboratoire mpo na ba résultats ya mabe


Président ya Tanzanie John Magufuli na lisikulu na TV nationale na Nairobi, Kenya, 4 mai 2020.
Président ya Tanzanie John Magufuli na lisikulu na TV nationale na Nairobi, Kenya, 4 mai 2020.

Ministre ya bokolongono ya Tanzanie apemisi mokambi ya laboratoire national nsima na mokonzi ya mboka John Magufuli kopamela ye mpo na bilembo ya malanu te na ba tests ya COVID-19.

"Tangu mosusu ezali mabunga ya misala (erreurs techniques) to nkisi (réactifs) oyo ewutaki na libanda ya mboka nde eza na nkwokoso. Ekoki mpe kozala ete basali (techniciens) bafutamaki na bato baiike mpo na kokotisa bato na libunga," ekebisaki dimanche na lisikulu etiyamaki na tv ya l’Etat TBC, président Magufuli.

Président Magufuli azali kondima te ete coronavirus ya sika epanzani mingi na mboka na ye kolanda bilembo ya laboratoire national.

M. Magufuli alobi ete amekaki ye moko na kobombama kosala test na nzete ya payi payi, na ndeke caille mpe na ntamba mpe ba tests yango emonanki positifs. Mpo na ye, ekoki kozala "sabotage".

Ministre ya bokolongono Ummy Mwalimu apesi mitindo lundi mpo ete mokambi ya laboratoire national apemisama na mosala na ye.

Mme Ummy Mwalimu alobi lipinga lya balukiluki libwa litiyami na esika mpo na kotala malamu likambo ya ba tests.

Bayi opposition balobi ete politiki ekoti na kati.

ACT (Alliance mpo na changement mpe transparence) ekomi na Twitter ete ekanisi ete mokambi ya laboratoire asali mabe ata moke te.

Moto wa yambo azwamaki na COVD-19 na Tanzanie le 16 mars. Ekolo eye ekomi na bakoni 480 sik’oko, bato 16 bakufi.

XS
SM
MD
LG