Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato baiike bazongeli mosala na Rwanda


Bato bazali kotosa mokano ya kokabwana na baninga na metre moko liboso ya ba magasins na Kigali, Rwanda, 4 mai 2020.
Bato bazali kotosa mokano ya kokabwana na baninga na metre moko liboso ya ba magasins na Kigali, Rwanda, 4 mai 2020.

Bato baiike bazongeli mosola na Rwanda lundi nsima na mposo motoba ya bokangami bozalaki mpo na kopekisa COVID-19 kopanzana. Moto moko akufi na COVID na Rwanda wuto yango ekotaki na mobka eye na sanza ya mars

.Misala mingi mifungwami kasi couvre-feu mokonzi ya ekola, Paul Kagame, esakolaki, ezali kokoba.

Bolati masque bozali lotomo mpe kozala mosika na bato na metre moko ya bokabwani esengami na bato.

Sik'oyo ba magasins mpe misala misusu efunguami.

Mbulamatari ya Kigali ezali moko na yambo na Afrika ya kokanga mpenza misala minso le 22 mars.

Kaka misala ya litomba makasi nde etikalaki. Lokola lopitalo pharmacie mpe bisika ya kosamba biloka ya kolamba mpo na koliya.

Rwanda ezali moko na bikolo ya Afrika ebandi kofungola misala.

Bato 259 nde bayebani kozwama na COVID-19 na Rwanda. Moto moko akufi te.

XS
SM
MD
LG