Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

ACAJ epameli projet ya "Secrétariat ya ba présidents élus" ya kala


Président Joseph Kabila, na loboko ya mwasi, apesi mbote na mokitani na ye Félix Tshisekedi, na Palais de la nation, Kinshasa, 25 janvier 2018.
Président Joseph Kabila, na loboko ya mwasi, apesi mbote na mokitani na ye Félix Tshisekedi, na Palais de la nation, Kinshasa, 25 janvier 2018.

Bokelami ya secrétariat ya ba présidents ya mboka ya kala bawuta na maponami bozali kobongisa na mbulamatari kasi baiike batemaleli na Société civile, lokola ACAJ.

ACAJ (Association congolaise pour l’accès à la justice) ekundoli, na mokanda etindeli ministre ya yambo, ete likambo yango lizali kobuka Buku likonzi.

"Totelemela kosakana na mbongo ya bafuti mpako ya ba Congolais," ekomi ACAJ na compte Twitter na yango.

NA mokanda etindela Premier ministre, ACAJ elobi ete ntina na secrétarait eye ezali te sik’oyo mpe yango ezali "likambo ya soni".

"Ntango mboka ezali na nkwokoso ya bobimi ya pandémie ya COVID-19 mpe ezali koluka na mpasi makoki masengeli mpo na kosilisa yango, ezalimkomwisa ete mbulamatari ya FCC-CACH esalela eleko eye mpo na koluka kosilisa misala miye bolamu na yango bozali kopesa mbano na baye bazali, na lolenge mingi, na mokumba ya bokweyisami ya politiki, nkita mpe bomoi ya bana ya RDC," ekomi mokambi ya ACAJ, Me Georges Kapimba na mokanda mwango.

Lundi 4 mai 2020, mbulamatari endima mabongisa ya secrétariat ya ba konzi ba kala babima na maponami.

Mbulamatari elobaki ekokoba kotala likambo lyango nsima. Kasi na makanisi mpo na projet etali mission mpe organisation ya secrétariat yango.

XS
SM
MD
LG