Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato 41 bazwami na COVID19 na boloko ya N'Dolo


Basoda ya mampinga ya RDC na libanda ya mpepo ya base ya N'Dolo, pene na boloko ya N'Dolo, Kinshasa, 8 juin 2006
Basoda ya mampinga ya RDC na libanda ya mpepo ya base ya N'Dolo, pene na boloko ya N'Dolo, Kinshasa, 8 juin 2006

Bato 41 bazwami na COVID19 ya Ndolo na Kinshasa, eyebisi ministre ya Bokolongono, Dr. Eteni Longondo. Bazali kati na 73 bakoni basika mpe 9 kati na ba Congolais baye bazongaki wuta Duabï mposo moloke mpe bazwi COVID19.

Na RDC, motango mwa bato banso bazwani na bokono boye mokomi 572.

"Eza mpasi mpo bato 41 bazwami na COVID19 na boloko boye. Totie bango na pembeni kuna na boloko mpo botalami mpe tokosala mpe tokosala test na bato banso batikali," elobi Dr. Eteni.

Ministre ya bokolongo asakoli ete boloko bwango bosukolama nkisi lokola mpe boloko bonene ya Makala na Kinshasa.

Ndenge bato baboloko baye bazwi bokono bwango eyebani kasi ministre ya bokolongo apameli bato bakenda kotala mpe koteka biloko na bato baloko.

Mpo na ye, mikano ya kopekisa bokoti ya bato balimba misengeli kotia na mosala na bokengi mbonso.

Ministre ya mambi ya Bosembo mpe Garde des sceaux, Célestin Tunda alobi ete manso mazali kosalama mpo ete bato baboloko baye bazali na etumbu ya makasi te babimisama. Pene na bato 2.000 basi babimisamaki sanza eleki na boloko ya Makala oyo ezalaki na pene na bato 9.000.

Nzoka bato bazwami na COVID19 na RDC bakomi 572.

Bato bakufi na ekolo mobimba bakomi 31 mpe baye babikisami, 73.

9 kati na ba Congolais baye bazongaki wuta Duabï mposo moloke mpe bazwi COVID19. Pene na 200 Congolais baye bazongaki mboka kowuta na Dubaï bazali na botalami na ba hôtel, elobi Dr. Eteni.

Moto mosusu ya sika azwami na Kasindi, na Nord-Kivu pene na Ouganda.

XS
SM
MD
LG