Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COVID19 : Sassou aboyi kobimisa Mokoko na Okombi babima na boloko


Président Denis Sassou Nguesso na Paris, France, 3 septembre 2019.
Président Denis Sassou Nguesso na Paris, France, 3 septembre 2019.

Président Denis Sassou N’Guesso alobi ete ntina ezali te ya kobimisa na boloko Jean-Marie Michel Mokoko mpe André Okombi Salissa, ba opposants politiques babale ata COVID19 ezali kongala na mokili.

M. Sassou ayonalaki na mituna ya bapanzi sango ya France 24 na RFI.

Alobi ete bato baloko 365 babimisami. Ezali baye bazwaki etumbu ya moke mpe bakokisaki mikolo mya bango na boloko, alimboli.

Nzonkande, ONG Amnesty international esengaki le 20 avril bobimisami ya bato ba boloko mpo na kobatela bango na COVID19.

Amnesty international etangaki nkombo ya candidat ya kala na mponami ya mokonzi ya ekolo na 2016, Jean-Marie Michel Mokoko mpe na André Okombi Salissa, ba opposants bable baye bakatelamaki etumbu na kofundama koluka kokweyisa bokonzi na 2018.

"Batiamaki te na boloko mpo bazali bayi politiki kasi mpo basalaki mbeba ya droit commun," eyebisi M. Sassou.

"Ezali na ntina te kotika bango na koluka kosilisa nkaka na boloko," ebakisi M. Sassou.

Président ya Congo-Brazzaville akanisi ete ntangu ekomi nanu te ya koloba soki esengeli kozongisa nsima maponami mabongisami mpo na trimestre ya yambo ya 2021.

Lingomba na ye PCT (Parti congolais du travail) eponaki ye lokola candidat na maponami mwango.

M. Sassou, na mibu 75, akokisa mibu 35 na bokonzi. Awangani ete azali kolengela mwana na ye Chrystel Sassou N’Guesso na kokitana na ye.

Bato 236 bayebani kozwama na COVID na Congo-Brazzaville, zomi bakufi, 26 babikisami.

XS
SM
MD
LG