Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Evêque Mukuna atiki mokanda ya kofunda Kabila na parquet


Joseph Kabila, pene na molongani wa ye Olive Lembe (G), na maponami, na Kinshasa, 30 décembre 2018.
Joseph Kabila, pene na molongani wa ye Olive Lembe (G), na maponami, na Kinshasa, 30 décembre 2018.

Pascal Mukuna, mokambi ya eyamba ACK mpe motambwisi ya Eveil patriotique atiki na parquet ya Cour constitutionnelle mokanda ya kofunda mokonzi ya kala Joseph Kabila na mbeba ya makoki ma bomoto.

Na mokanda atindela procureur général ya cour constitutionnelle, episkopo Mukuna atangi kufa ya bayi Bundu dia Kongo na 2008 na Kongo central, kufa ya bato na botambolaki na Kinshasa na bobengisami ya CLC (Comité laïc de coordination) mpe liwa ya babundi ba makoki ma bomoto Armand Tungulu na Floribert Chebeya.

"Namemi mbeba inso oyo na ndako na yo ya mosala mpo ete enquête moko efungolama mpe M. Kabila ayanola na mbeba yango esalamaki na bokonzi na ye," ekomi episkopo Mukuna na mokanda eye VOA Lingala emonaki.

Wuto mposo moleki, Pascal Mukuna aningisamaki na bopanzani ya bililingi mpe bilili ya nsoni mpe ekobo emonisa kozala lokola ye.

Kasi Pascal Mukuna alobi ezali bayi Kabila nde bakeli yango mpo na kopekisa ya kofunda mokonzi ya kala.

XS
SM
MD
LG