Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

T. Lubanga asengi CODECO mpe bana banso ya Ituri kotika bitumba


Thomas Lubanga, na bosambisami na ye na CPI, La Haye, Pays-Bas, 1décembre 2014.
Thomas Lubanga, na bosambisami na ye na CPI, La Haye, Pays-Bas, 1décembre 2014.

Thomas Lumbanga, moto ya yambo na molongo asalaka boloko na CPI (Cour pénale internationale), abwaki mbela na bana banso ya Ituri -epayi awuta- mpo batika biutmba.

Asalolaki na bapanzi sango na Kinshasa mbala ya yambo wuto atikama na boloko.

"Nasengi ba ndeko ba nga ya CODECO (Coopérative pour le développement du Congo) kotika misala mabe na bango miye ya kotangisa makila ma bandeko ba bango pamba pamba na territoire ya Djugu mpe Mahagi na Ituri," eyebisi M. Lubanga.

"Botika koboma bandeko na biso ya basi mpe mibali mpe kobebisa Ituri! Bokozwa eloko te na makango bozali kosala, maye bato banso na Itrui baboyi na ngambo inso," elobi M. Lubanga.

A. Lubanga asalaki koleka mibu 14 na boloko mpo azalaki mokambi ya UPC (Union des patriotes congolais), moko na mangomba maye basalaki bitumba kati na 1999 kino 2003 na Ituri. Bato koleka 50.000 bakufaki mpe koleka 500.000 bakimaki.

Mokambi ya kala ya UPC akatelamaki etumbu ya mbeba ya makoki ma bomoto mpo na kozwa bana mike na lisanga na ye ya basimba minduki.

"Tika nayebisa ete ONU ezali kolobela mbeba ya makoki ma bomoto. Ntango ekoki mpo bozongisa mayele na nsima mpe bondima loboko eye tata mokonzi Félix Tshisekedi apesi bino mpo andimi koyoka bino," elobi M. Lubanga.

M. Lubanga abimaki na boloko na sanza ya mars 2020.

Bato pene na 700 bakufi na bitumba na Ituri wuto décembre 2017.

CODECO elobaka ebunda mpo na balendu.

Mpo na M. Lubanga bayi kabila inso nde bazali kokufa na bitumba biye ezala ba lendu, ba hema, ba alur, ba mbisa, ba Ndo Oelmbo, ba Nyaki mpe ba Twa.

Mposo moleki président Tshisekedi asololaki na M. Lubanga elongo na Germain Katanga, mokambi mosusu ya mangomba ya basimba minduki ya Ituri oyo asalaki mpe bokolo. Masolo mango mazalaki mpo na koluka bozongi ya kimya na Ituri.

XS
SM
MD
LG