Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi ba biyamba bandimi te kotambwisa libenga lya COVID19


Cardinal Fridolin Ambongo (D) pene na Abbé Donatien Nshole, kalaka mokonzi ya CENCO nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Cardinal Fridolin Ambongo (D) pene na Abbé Donatien Nshole, kalaka mokonzi ya CENCO nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Bakambi ba biyamba bandimi te kotambwisi libenga lya bondeko mpo na COVID19, FNSC (Fonds national ya solidarité na bitumba na COVID19), esakoli bango liboso ya bapanzi sango na Kinshasa.

Bakutanaki jeudi na mpokwa na president Félix Tshisekedi na koyebisa ye mokano mwa bango.

Mposo moko na ndambo moleki, président Tshisekedi aponaki cardinal Fridolin Ambongo mpo na kozala na ebonga ya mokambi ya FNSC (Fonds national ya solidarité na bitumba na COVID19).

Esengelaki cardinal Ambongo asungama na bakambi ya biyamba misusu lokola André Bokundoa, ya ECC (prostetant), Abdallan Mangala ya ba muslmans, Delphin Elebe ya ba Kimbagusites, na mokambiya Arméé du Salut mpe Sony Kafuta ya église du réveil. Bango banso balingaki kopesa maboko na Dr, Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya cellule technique ya bitumba na COVID19.

"Bakambi ya bitonga bandimi kopesa maboko na kosunga misala miye kasi bandimi te kokotisa maboko ma bango moko na maye matali bokambi ya mokolo na mokolo na yango," elobi abbé Donatien Nshole, kalaka moknzi ya CENCO.

Bakambi ba biyambi bakamba Conseil consultatif eye ekozala kokengele bokambami ya FNSC.

Mpo na ye, bakambi babitonga bakozala nde basinzili.

XS
SM
MD
LG