Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato banei bazwami na COVID19 na boloko ya Ndolo


Bosambisami bwa bato ba boloko na ndako ya kobomba bato ya Ndolo, Kinshasa, 4 février 2014.
Bosambisami bwa bato ba boloko na ndako ya kobomba bato ya Ndolo, Kinshasa, 4 février 2014.

Bakonzi ya misala ya bitumba na corovirus ya sika bazwi mokano ya kosukola na nkisi boloko ya Ndolo,na Kinshasa mpo bato banei bazwami kuna na bokono boye.

Likita linene lisalami mpo na yango na ministre ya yambo.

"Na ntina ya kopekisa bobanzani bwa bokono boye to kosala test na bato banso bazalaki nzinga nzinga ya bato banei bana mpe tokomema bato banso batikali na libanda lokola etando ezali na boloko bwango mpe tokotiya nkisi," eyebisi ministre ya bokolongono, Dr. Eteni Longondo.

Alobi eyebani te ndenge nini bato baye bazwi COVID19.

Bakonzi bakani mpe kosokola na nkisi bokolo bonene ya Makala ata soki moto moko amonani kuna na bokono boye te.

"Ezali mpo na kopekisa bokoti ya bokono bwango," elobi Dr. Eteni.

Misala ya bitumba na COVID19 etalaki mpe ndenge lopitalo mpe bisika binso bakoni bazali kotiya mpe milobi ete esengeli kobakisa makoki.

RDC elekisi motango ya 500 bato bayebani kozwama na COVID19.

Bato basusu libwa ya sika bazwami ma Kinshasa, motoba mosusu babikisami, moto moko akufi.

Motango nyonso ya bato bawei mokomi tuku misato na moko mpe tuku motoba na mitano nde babikisami, elobi INRB.

XS
SM
MD
LG