Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministre wa Yambo ya kala N’Singa Udjuu awei


Joseph N'Singa Udjuu, ministre wa Yambo ya kala ya Zaïre (RDC) awei, 24 février 2021. (Twitter/Joseph N'Singa Udjuu)
Joseph N'Singa Udjuu, ministre wa Yambo ya kala ya Zaïre (RDC) awei, 24 février 2021. (Twitter/Joseph N'Singa Udjuu)

Joseph N’Singa Udjuu, Ministre wa Yambo ya kala Ekolo Congo démocratique akufi mercredi na Lipitalo ya Cinquentaire na mibu 86.

Azalaka Ministre wa Yambo ntango ekolo ezali kobengama Zaïre (1981-1982) na bokonzi ya Mobutu Sese Seko.

Awumelaki mpe na politiki.

Azalaka moko na bato bakelaki lingomba ya politki MPR (Mouvement populaire ya révolution) elongo na Justin-Marie Bomboko na Etienne Tshisekedi mpe na Mobutu.

Nsima na busukisami bwa MPR bo’ lingomba nse moko na mboka, M. N’Singa oyo atanga mpe Droit nsima kowuta na likondo mpo na Philosophie, azalaka mpe ministre ya mambi ma sembo.

Akelaka mpe lingomba lya ye UCRJ (Union chrétienne pour le renouveau et la justice).

Mbala ya suka amonisaka na ba media, ezalaka na boyoki bato président Félix Tshisekedi asalaki na sanza ya novembre.

M. N’Singaa azalaka moko na baye basengaki mokonzi ya mboka kokweyisa parlement.

XS
SM
MD
LG