Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ilunga Ilunkamba apesi Tshisekedi mokanda ya botiki mosala


Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga Ilunkamba (G) azali kopesa mokanda ya botiki mosala na président Félix Tshisekedi na Palis de la nation, Kinshasa, 29 janvier 2021. (Twiter/Présidence RDC)
Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga Ilunkamba (G) azali kopesa mokanda ya botiki mosala na président Félix Tshisekedi na Palis de la nation, Kinshasa, 29 janvier 2021. (Twiter/Présidence RDC)

Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga Ilunkamba apesi mokanda na ye ya botiki mosala na président Félix Tshisekedi vendredi na Palais de nation, na Kinshasa.

"Ministre wa yambo ya mbulmatari ya boyokani Sylvestre Ilunga Ilunkamba awuti kopesa mokanda mwa botiki mosala na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi Tshilombo," elobi misala mya présidence ya RDC.

"Alobi ete azwi mokano kolanda ndenge makambo mazali kotambola na politiki ya mikoli miye," ebakisi présidence.

M. Ilunga akweyisamaki na motion ya censure ya Assemblée nationale endimamaki na bakeli mibeko 367 o’mokolo mwa mibale.

Motion yango etiamaki manzaka na bakeli mibeko 301.

M. Ilunga azalaki kozela mokanda ya Bureau d’âge ya kosakola na ye motion yango.

Ministre wa yambo oyo akweyisamaki, atelemelaki Bureau d’âge na koloba ete ebuki mobeko likonzi mpe mibeko mya ekolo na kozwa bokonzi ya koyoka bayi mbulamatari ntango mibeko mipesi yango kaka bokonzi ya kosalisa maponami ma Bureau definitive. Maponami mango makosalama le 3 février.

XS
SM
MD
LG