Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bureau d’âge ya Assemblée nationale ebengisi likita vendredi na 13 heures na likama kya pétition ya bayi FCC


Mboso Nkodia (C) Aminata Namasia (G) na Gael Bussa (D), bakambi ba Bureau d'âge ya Assemblée nationale, na Kinshasa, 6 décembre 2020.
Mboso Nkodia (C) Aminata Namasia (G) na Gael Bussa (D), bakambi ba Bureau d'âge ya Assemblée nationale, na Kinshasa, 6 décembre 2020.

Bureau d’âge ya Assemblée nationale ebengisi vendredi na 13 heures likita lya bakeli mibeko mpo na kolekisa na maponami mabongisi mya mobeko mokopesa ndingisa na kotia manzaka na bokelami ya ZLECAF (Zone de libre-échange continentale africain).

Bakeli mibeko babengisami mpe mpo na kotala rapport ya Commission mixte, relations extérieures-Economique, financière et contrôle budgétaire.

Nzonkande bakeli 140 baye batiaki banzaka na pétition ya kosenga bolongwi ya Bureau d’âge bazali kozela nde pétition na bango etalama.

Na ngambo esusu, bakeli mibeko baike bazali mpe kotia manzaka na pétition mosusu mpo na kokweyisa Ministre wa yambo.

XS
SM
MD
LG