Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi atie Sama Lukonde bo' Ministre wa Yambo


Ministre wa Yambo ya sika ya RDC Jean-Michel Sama Lukombe, 15 février 2021. (Twitter/Président RDC)
Ministre wa Yambo ya sika ya RDC Jean-Michel Sama Lukombe, 15 février 2021. (Twitter/Président RDC)

Président Félix Tshisekedi atie na ebonga ya Ministre wa Yambo Jean Michel Sama Lukonde, mokambi ya Gécaminies.

Sama Lukonde azalaki mpe ministre ya Sports to Masano ya kala.

Molobeli ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, Kasongo Mwema nde asakoli mokano yango na etando eke.

Kino yambo na botiami na ye ebonga ya Ministre wa Yambo, Sama Lukonde azalaki mokambi ya Gécamines, compagnie ya makele na Katanga ya kala.

Sama Kilombe azali na mibu 43. Azalaki mpe DGA ya SNCC (Société nationale des chemins de fer du Congo) nsima na kotika ebonga na ye ya ministre ya Sports na 2015.

Asalaka kelasi mpe azali diplôme ya ingénieur mpe abandaka mosala na ye na Gécamines nsima na stage asalaki na Afrique du Sud.

Azali moyi parti politique Avenir ya Congo ya Dany Banza. Mpe tata na ye azalaki moyi politiki ayebanaki kala, nkondo stéphane Lukonde.

Azalaki kala mpe na lingomba linene G7 liye lilandaka Moïse Katumbi.

Présidentélix Tshisekedi atie ye na ebonga na ebonga na esika ya Sylvestre Ilunga Ilunkmaba oyo atikaki mosala mposo mibale na ndambo mileki nsima na kokweyisama na Assemblée nationale na bayi Union sacrée, mopepe ya sika ya kokamba mboka nzinganzinga na mokonziya RDC oyo azali sika kokamba Union africaine.

XS
SM
MD
LG