Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakeli mibeko bakozela mercredi mpo na kotala motion ya Censure likolo ya Ministre wa yambo Ilunga


Bakeli mibeko na ndako ya Assemblée nationale. Kinshasa, 12 novembre 2012.
Bakeli mibeko na ndako ya Assemblée nationale. Kinshasa, 12 novembre 2012.

Likita lya Assemblée nationale libengisami mpo na kotala motion ya censure to mokanda mozali kosenga bolongwi bwa Ministre wa yambo litindami mercredi mpo na kozela Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga Ilunkama oyo azali na etinda na Lubumbashi.

Mokambi ya Bureau d’âge Christophe Mboso Nkodia Mpwanga abondelaki bakeli mibeko kondima kozela mercredi mpo Ministre wa Yambo Ilunga Ilunkamba azalai nan una Lubumbashi na etinda epayi wapi akendaki kokutana na mokonzi ya kala Josepha Kabila, mokonzi ya FCC mpe PPRD oyo apesaki nkombo na ye mpo azwa ebonga ya mokonzi ya mbulmatari.

Bobendani bozalaki makasi na likita lyango.

Bayike bamilengelaki mpo na kopona kasi bayi FCC batikali sembo na mokonzi ya kala Joseph Kabila babimaki na ndako ya bokeli mibeko na kofundaka mokambi ya Bbureau d’age na koboya kopesa bango maloba.

Bayi FCC batikala sembo na Kabila bango mpe balengeli motion ya censure mpo na kokweyisa Bbureau d’age ata Cour constitutionnelle eboyaki yango.

Kasi motuna moazali soki lobi M. Ilunga akozonga Kinshasa mpe akokende na likita lya Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG