Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basoda babengani bayi UDPS na post-frontalier ya Kasumbalesa


Basoda bazali kobengana bayi UDPS na ndelo ya Kasumbalesa, na Haut-Katanga, 25 aout 2020. (Narval Mabila)
Basoda bazali kobengana bayi UDPS na ndelo ya Kasumbalesa, na Haut-Katanga, 25 aout 2020. (Narval Mabila)

Bayi bokengi babengani bayi UDPS, lingomba lya président Félix Tshisekedi, na post-frontalier ya Kasumbalesa, epayi wapi bazalaki kokongola mpako mpe kokanga bato., eyebisi correspondant ya VOA Lingala na Haut-Katanga.

Molobeli ya mampinga ya RDC na Haut-Katanga, major Muyumba Nyembo asakoli ete basoda bakitaki na esika yango mpe babenganaki baye bazali wana kasi bazalaki na mpifo te.

"Basoda bapanzi hangar, bapasoli elili ya mokonzi ya mboka mpe bendele ya lingomba na biso UDPS. Bakangi bato ya UDPS pene na zomi," endimi mokambi ya UDPS na Haut-Katanga, Bruno Tshibangu.

Mpo na ye, bayi UDPS bakozongela lisusu te kosala yango.

Banzeneneke baike batatoli ete wuto eleko ya président Mobutu Sese (1965-1967) bayi UDPS bamipesaki bokonzi ya kokongola mpako na Kasumbalesa likolo na biloko binso kibimaka mpe bikota na Kasumbalesa na ndelo na Zambie.

XS
SM
MD
LG