Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bukanga Lonzo: Matata Ponyo alaki komema makambo na bazuzi


Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.
Augustin Matata Ponyo Mapon, Ministre wa yambo ya RDC, na Kinshasa, 13 avril 2015.

Augustin Matata Ponyo, ministre wa Yambo ya kala alaki komema makambo na bazuzi nsima na bosilisami ya mosala ya bolukiluki ya IGF (Inspection générale ya Finances) likolo ya mabongisami ma bilanga na Bukunga Lonzo. IGF esengi ye nde avanda kimya misala mya bosembo misali na makambo yango na maboko.

M. Matata Ponyo alobi amoni ete baike bazili nde koluka nde motu na ye.

Ministre wa Yambo ya kala akundoli, na ba panzi sango na Kinshasa, ete ye nde asengaki bolukiluki yango na IGF.

Apameli IGF na kobimisa bilembo ya bolukiluki mpe kopesa yango yambo na bapanzi sango mpe na misala mya sembo kasi kotindela ye yango te ntango ye nde asengaki yango.

M. Matata alobi akemwa ete bilembo ya IGF bizala na bokeseni na mikanda apesaki na IGF.

Na liyebisi na yango, IGF esengi M. Matata kotika kosala mobulu yambo na misala mya bosembo kokata makambo.

"IGF ezwi makasi na lolele eboyaki kopesa ye ndambo ya rapport etali bato basusu bazali na mabongi ya Bukanga Longo, baye balakisi bokoli na bango na kovandakimya mpe kozela bosambisami," ekomi IGF.

IGF elobi ete ntalo ya likolo ya lokuta etiamaki na biloko bisombamaki.

XS
SM
MD
LG