Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ilunga Ilunkamba andimi kolongwa kasi azozela mokanda ya Bureau d’âge


Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na Kinshasa, 4 juillet 2019. (Facebook/Syvestre Ilunga Ilunkamba)
Premier ministre Sylvestre Ilunga Ilunkamba na Kinshasa, 4 juillet 2019. (Facebook/Syvestre Ilunga Ilunkamba)

Ministre was yambo, Sylvestre Ilunga Ilunkamba alobi ete andimi kolongwa nsima na bokweyisaki na ye na bakeli mibeko kasi azali kozela mokanda ya Bureau d’âge.

Nazali kozela mokanda mwa mokano yango mpo ete nasala eye ezali na mokumba na ngai kolanda Buku likonzi, ekomi Ministre wa Yambo na mokanda atie manzaka.

M. Ilunga alobi andimi été Assemblée nationale ezali na bokonzi ya kokweyisa ye mpo bakeli mibeko 301 nde batiaki manzaka na motion ya censure to mokanda ya kosenga molongwi na ye kasi atelemeli nde Bureau d’âge.

Mpo na ye, Bureau d’age ebuku likonzi mpe mibeko ya ndako ya bokeli mibeko.

M. Ilunga akomaki na mokanda atindaki lobi loleki na Assemble nationale yambo na bokweyisami na ye ete akozela nde Bureau dfinitif, nzoka yango ekoponama nde le 3 janvier.

Kasi ngonga 24 eye Bureau d’age esakolaki mpo na Ministre wa yambo kosilisa mosala esengeli ekoka jeudi na mpokwa.

Ngambo na ye, informateur Bahati Lukwebo azongiseli président Félix Tshisekedi mokanda ya bilembo azwi nsima na kotola lingomba nini ezali na majorité.

XS
SM
MD
LG