Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bitumba ya FCC na Union Sacrée mpo na bolongwi ya PM na ya Bureau d’âge ya Assemblée nat.


Premier ministre Ilunga Ilunkamba (G) na bokutani na président Félix Tshisekedi (D) na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 19 août 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Premier ministre Ilunga Ilunkamba (G) na bokutani na président Félix Tshisekedi (D) na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 19 août 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Bakeli mibeko baike bazali kotia manzaka na pétition ya kosenga bolongwi ya Ministre wa yambo kasi basusu bazali kosenga Assemblée nationale kobengisa mpo na kondima pétition ya bolongoli ya Bureau d’âge na yango.

Bondongwani ya FCC ya mokonzi ya la kala Jojseph Kabila na baye bazali kosala lisanga lya sika Union Sacrée président Félix Tshisekedi azali kokela, bozali kokoba, mingi mingi na Assemblée nationale.

Bakeli mibeko baike, mingi ya Union sacrée bazali sika kotia manzaka na mokonda ya kosenga bolongwi ya Ministre wa yambo Sylvestre Ilunga Ilunkamba.

Baike lokola Eric Ngalula ya UDPS bakanisi ete 'esengeli mboka ekende liboso mpo soki Ministre wa Yambo Ilunga azali na esika, yango eskopesa nzela te na botiami ya 'formateur' mpe ya ambulamatari mosusu.

Nsima na bokati libala kati na CACH na FCC, président Félix Tshisekedi atiaki le1 er janvier 2021 na esika "informateur" mpo na kotala ngambo nini eleki na bakeli mibeko.

M. Tshisekedi asalaki kaka lisakoli kasi azwaki ordonnance te mpo na Ministre wa yambo azali na esika mpe esengeli na ye kotia manzaka na ordonnance yango elongo na M. Ilunga kolanda Buku likonzi. Kosala bongo ekozala kobuka Buku likonzi.

Mpo na M. Tshisekedi, majorité ya FCC ekweyisamaki.

Na ngambo na bango, bakeli mibeko batikali na FCC bazali kosenga Bureau d’âge kobengisa likita na ntina ya kotala pétition na bango.

Joseph Kokonyangi, moko na bakeli mibeko babandisi pétition yango alobi esengeli mokambi ya Bureau d’âge Mboso Nkodia Mpwanga kobengisa likita na 72h.

Bakeli mibeko 140 batie manzaka na mikanda misato mizali kosenga bolongwi ya bureau d’âge.

Bazali kopamela Bureau eye kotambola likolo lya Buku likonzi, likolo na mibeko mya Assemblée nationale mpe bosaleli misolo mabe.

Molebeli ya Burea d’âge ayanolaki mardi ete likita likobengisama te mpo na kotala ba pétitions wana.

Mpo na molobeli ya Bureau d’âge, ba pétitions yango ezali na loboko te.

XS
SM
MD
LG