Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Thambwe Mwamba atiki mosala


Alexis Thambwe Mwamb azali kotia manzaka na mokanda na Kinshasa, le 1er janvier 2017
Alexis Thambwe Mwamb azali kotia manzaka na mokanda na Kinshasa, le 1er janvier 2017

Alexis Thambwe Mwamba atiki mosala na ye bo’ mokambi ya Bureau ya Sénat. Akomi yango na mokanda atindi na Sénat ntango esengelaki ete ba Sénateurs batala vendredi ba p 130titions to nkasa ya baye basali kosenga ye na Bureau Mobimba kolongwa.

Alexis Thambwe Mwamba, moko na bayi FCC, alobi amoni ete bondimami kati na ye na baike na ba Sénateurs basusu mpe lisusu, mpe lisusu botiami bwa Bureau d’age bopesi ye lisusu nzela ya kosala te.

Lobi loleki bakeli mibeko tuku motoba na minei bazalaki na likita lya kafukafu libengisamaki na kalaka mokonzi ya Sénat mpe batiaki nae sika Bureau d’agee ekambami na Léon Mamboleo oyo aleki ba Sénateurs basusu na mibu.

Esalami mposo moko na ndambo nsima na bokweyisami ya Ministre wa yambo mpe mbumalamatari ekambama na bayi FCC, mpe sanza moko nsima na bolongoli ya Bureau ya Assemblée nationale ekambaki mpe lisusu na bayi FCC.

Liboke lya sika, Union sacrée, lizali kokelama nzinganzinga ya mokonzi Félix Tshisekedi mpo na majorité ya sika nsima na bokabwani ya boyokani kati na CACH ya ba Tshisekedistes na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

XS
SM
MD
LG