Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sylvestre Ilunga alobi akokende te kolia epayi ya ba "voisins"


Sylvestre Ilunga Ilunkmba nsima na kolongwa na ebonga ya Ministre wa yambo, na Palais de nation, Kinshasa, RDC, 29 janvier 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Sylvestre Ilunga Ilunkmba nsima na kolongwa na ebonga ya Ministre wa yambo, na Palais de nation, Kinshasa, RDC, 29 janvier 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Sylvestre Ilunga Ilunkamba alobi akokende te kolia epayi ya "ba voisins" na bosukisi makomi abimisi nsima na kotika ebonga ya Ministre wa yambo.

"Lokola moyembi moko ayebana alobaki, moloba maye : 'esengeli koyeba kolongwa na mesa ntango bilei bilongolami.' Kasi, nga nakolongwa te na mesa epayi biloko bilongwe mpo na kokende kolyia epayi ya bapaya nzinga nzinga (ba voisins)," ekomi M. Ilunga Ilunkamba.

Bolongwami bwa ye bosalami ntango baike ya FCC, lingomba lya mokonzi ya kala Joseph Kabila, eye ezalaki na bakeli mingi koleka (majorité), bakatisi ngambo ya Union sacrée, boyokani bwa sika mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi azali kosala nsima na koboma libala kati na FCC na CACH.

O’mwa minei, "Informateur" Modeste Bahati, oyo président Tshisekedi atiaki mpo na koluka majorité ya sika, asakolaki ete bakeli mibeko 397 bazali sika nsima na Union sacrée. Assemblée nationale ezalaka na bakeli mibeko 500.

Ministre wa yambo oyo alongwe, atikaki mokanda ya botiki mosala mwa ntango na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi nsima na kozwa mokanda ya Burea d’âge koyebisa ye mpo etalaki motion ya censure bakeli mibeko 367 bandimaki.

Bondimi ya motion ya censure yango mosalamaki mardi. Bakeli mibeko 301 nde batiaki manzaka na motion yango.

Na mokanda mwa ye, M. Ilunga apesi losako na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi nsima na kosalna na ye elongo sanza 25. Apesi mpe losako na mokonzi ya kala Joseph Kabila.

XS
SM
MD
LG