Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CENCO esengi bana ba RDC kotika te bonsomi ya mboka na bango bobotolama


Cardinal Fridolin Ambongo pene na Abbé Donatien Nshole, kalaka mokonzi ya CENCO nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Cardinal Fridolin Ambongo pene na Abbé Donatien Nshole, kalaka mokonzi ya CENCO nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)

CENCO esengi na bana ba RDC kotika te ete bonsomi na mboka na bango bobotolama kolanda maloba masakolamaki na kalaka mokonzi na yango, abbé Donatien Nshole lundi na Kinshasa.

Ba episkopo ya Katoliko bakebisi mpo na botelemi ya misala na mboka mpo na boswani ya bayi CACH mpe FCC, elobi abbé Nshole.

CENCO (Conference épiscopale nationationale ya Congo) esengi botiami bwa tribunal ya molongo kolanda rapport mapping wuto mibu zomi.

Mpo na yango, elobi abbé Nshole, mbulamatari esengeli esenga botiami bwa Tribunal ya molongo eye na ntina ya kosukisa bobomi mpe mbeba esusu ezali kokoba kosalama na Ekolo Congo democratique.

B’episkopo basengi l’Etat kosalela makoki ma yango mpo na kosukisa kinianka, bozangi etumbu mpe bobomi bozali kosala na mboka.

CENCO ekebisi mpo na maloba ma kolaka kosala mabe na bana mboka bafundaka mbeba lokola moko na b'episkopo ya Ituri mpe na episkopo ya Urbira, Mrg Sébastien Muyengo.

XS
SM
MD
LG