Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

ECC ebengi bitumba ya Beni mpe Butembo "génocide"


Mgr André Bokundoa-bo-Likabe (D), mokambi ya ECC (Eglise du Christ au Congo) elongo na Mgr Mpeye Boye na losambo na Cathédrale ya centenaire na Kinshasa, 28 avril 2017. (Facebook/ECC)
Mgr André Bokundoa-bo-Likabe (D), mokambi ya ECC (Eglise du Christ au Congo) elongo na Mgr Mpeye Boye na losambo na Cathédrale ya centenaire na Kinshasa, 28 avril 2017. (Facebook/ECC)

Eglise du Christ au Congo (ECC) esengi bakonzi ya ekolo Congo démocratique kozwa mokumba ya baye bazali na mpasi na mboka mpo na bokambami ya mabe, kolanda mokanda ya président ya ECC akomi mpo na feti ya mobu ya sika. 

Na mokanda mwango, president ya ECC, pasteur André Bokundoa-bo-Likabe asengi bana ya Congo démocratique basala makasi manso na boyokani na molongo mobimba, mpo na kosenga na nzela ya politiki mpe misala ya bosembo bobongisi ya mpasi eye epesami na bavandi ya Beni mpe Butembo. "Mpamba te kozanga kobongisa ezali nzela epekisa bato kosalela bosembo na bango moko mpe ya koleka ndelo," ekomi pasteur Bokundoa-bo-Likabe.

Mokambi ya ECC apaleli bobomami bozali kosalema na monyele ya Ekolo Congo démocratique, mingi mpeza na Beni.

"Bato bayike bako tatabana te mpo na kobenga yango 'Génocide'. Ezali likambo ya mpasi koleka nanu lisalama te na eleko na biso mpo na koleka bato 6 millions bakufi (mibali, basi mpe bana), kaka mpo na kolongola ntina ya bomoi, komema nsomo mpe mobulu na mayele ya bato banso," ebakisi pasteur Bokundoa-bo-Likabe.

Mokambi ya ECC asengi na ONU mpe mokili mobimba koyeba yango mpe kosunga mpo ete esuka.

Atelemeli mpe kaniaka, asengi bana ya Congo kolimbisana mpe kozonga na bomoko.

Asambeli ete 2020 ezala mobu ya ngolu ya Nzambe mpo na Congo démocratique.

XS
SM
MD
LG