Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayi FCC Ass.Nat./Sénat basengi Cour constitutionnelle kotelemisi bolapi ndayi ya bazuzi


Zuzi moko azali kolapa ndayi liboso lya mokonzi Félix Tshisekedi na Kinshasa, 3 aout 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Zuzi moko azali kolapa ndayi liboso lya mokonzi Félix Tshisekedi na Kinshasa, 3 aout 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Bakeli mipeko ya suku ya nse ya Parlement ya lingomba FCC lya mokonzi ya kala Joseph Kabila bakomeli Cour constitutionnelle mpo kosenga yango ko limbola article 158 ya Buku likonzi mpo etali botiami bwa bazuzi. Ba députés ya FCC basengi milulu mya bolapi ndayi mitelemisama.

Ba députés baye basengi mpo na yango botelemisi bwa milulu mya botiami ya bazuzi ya Cour constitutionnelle misengeli kosala o’mokolo mwa misato, kolanda linaka lya présidence.

"(Bazuzi ba Cour constitutionnelle) bayebisa biso ndimbola, loboko mpe mbano ya bosaleli na ndenge elongobani ya malako maye ma Buku Likonzi, kasi mpe lisusu na kozela eyango ekopesamela biso na bosenga boye, Cour constitutionnelle etelemisa milulu mya bolapi ndayi bwa bazuzi baye," elobi Did Manara mokambi ya groupe parlementaire ya PPRD, lisanga lya mokonzi ya kala Joseph Kabila nsima kotika mokanda na Cour constitutionnelle.

Lobi loleki, bayi Sénat mpe batikaki na cour constitutionelle bosenga bwa ndenge moko.

Bayi FCC, lingomba linene lisangisa masanga mazali nsima na M. Kabila, bazali na matata na mokonzi ya mboka mpo na botiami bwa bazuzi basato ya Cour consotitutionnelle.

Mpo na bayi FCC, mokonzi ya mboka Tshisekedi abukaki buku likonzi.

Alexis Thambwe Mwamba, mokambi ya Sénat na Jeanine Mabunda ya Assemblée nationale, basi bayebisi na mokonzi ya mboka ete bakoki te kozala na milulu myango.

Bayi FCC basakoli mpe ete bakozala te.

FCC nde ezali na bakeli mibeko mingi koleka, 350 likolo na 500 na Assemblée nationale mpe pene na 70 likolo na 100 na Sénat.

Lundi, mokambi molandi ya PPRD, Ferdinand Kambere asakolaki na VOA Lingala ete bakotika te ministre wa Yambo Sylvestre Ilunga, moko na bango, mpe ministre ya boyokani na Parlement, kobongisa milulu mayngo lokola esengamelaki bango na likita lya mbulamatari lya mokolo mwa mitano.

Lundi, ba episko ya CENCO bapamelaki bayi politiki mpo boswani ya CACH (lingomba linene nsima na M. Tshisekedi) na FCC botelemisi botamboli bwa mboka.

XS
SM
MD
LG