Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asololi na bakambi ya bituka


Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi kati na bakambi ya bituka na Palais de la Nation, Kinshasa, 13 novembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi kati na bakambi ya bituka na Palais de la Nation, Kinshasa, 13 novembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akutani na bakambi ya bituka na misala ya boyoki bato azali kosala wuto mikolo zomi na mibale na Palais de nation, na Kinshasa.

Bakambi ya bituka bazali mingi ya FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, lingomba liye lilobi boyoki bato boye botali yango te.

"Tozali komana ndenge moko na mokonzi ya mboka na mosala na ye mpo etali libote lilamu (Union sacrée) mpo na mboka," elobi molobeli ya bakambi ya bituka, Richard Muyej.

Zoé kabila, moakmbi ya Tanganyika mpe leki ya Joseph Kabila mpe azalaki wana.

"FCC etikali na botosi nwa masolo kati na ba institutions, Yango wana lokolo mpo na likita lya bakambi ya bitukam epesi ndingisa na bayi lingomba bazali ba gouverneurs ya bituka kokutana na Tata mokonzi ya Ekolo," elobi motambwisi ya FCC Néhémie Mwilanya na Twitter.

M. Tshisekedi abengisaki misala ya koyoka bato nsima na koloba ete boyokani ya CACH, lingomba lya ye ya monene, na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila bozali kotambola te.

Alakaki koyoka bato na ntina ya kosala liboke ya sika ya bokambi mboka.

Kasi bayi FCC baboyi yango. Balobaki yango na suka ya likindo lya bango,

Bayi FCC balobi bazali na majorité mpe kokela majorité ya sika na koluka kozwa ba députés (bakeli mibeko) ya mangomba misusu ekozala kobuka buku likonzi.

Mpo na bango, esengeli nde maponami ma sika na bitapi binso mpo na koluka majorité ya sika.

B'episko ya CENCO, baye bakutanaki na M. Tshisekedi mposo moleki, bazali kokutana na ngambo inso ya bayi politiki, mingi mingi na baye baboyi boyoki bato boye,

CENCO ekutanaki na Ministre wa yambo jeudi. Ekutanaki mpe na Joseph Kabila mpe lisusu na Martin Fayulu.

Mpo na M. Fayulu, M. Tshisekedi azali mpe kati na nkwokoso, akoki te kobengisa bato mpo na koyoka bago.

M. Fayulu mpe azali kosenga maponami malombango mpe bongwana na misala minso mya bokambi mboka.

XS
SM
MD
LG